May 13, 2019

Géométrie en lingala



Mungugnu le triangle en yipunu

Ndenge ya Panzi-misato (triangle) en lingala


  1. Liyeboli (définition)

 


Tozali na biteni misato esembwama : a, b, c. Soki biteni yango misato etutani mibale mibale, ekosala
elongi oyo tobengaka : panzi-misato (triangle)
Tokoki koloba ete :
Panzi-misato ezali elongi oyo ezalaka na mipanzi-esembwama misato ekutana mibale-mibale. Esala matumu misato pe songe misato.
2. Boyokani po na kokoma
Tokokoma panzi na nkoma ya mike : a, b, c.
Tokokoma songe na nkoma ya minene : A, B, C.
Tokokoma misembwamo (biteni esembwama) na bosangisaka basonge mibale-mibale : AB, BC, AC
Tokokoma matumu (angle) na bolandisaka basonge misato pe kobakisa ekoti likolo ya songe ya katikati. Yango nde esika kofungwama esalami.


3. Lolenge ya panzi-misato
Tozali na bandenge minei ya panzi-misato :
  1. panzi-misato etelema (triangle rectanle)
  2. panzi-misato panzi mibale ekokana (triangle isocèle)
  3. panzi-misato ekokana (triangle equilatéral)
  4. panzi-misato ekokana te (triangle scalène)
4. Panzi-misato etelema (triangle rectanle)
Panzi-misato etelema ezali panzi-misato oyo ezali na litumu moko esala kofungwama ya 90°.







Panzi a ; Panzi b ; Panzi c
Tokoloba ete, panzi a etelemana na panzi c.
Na français okoloba : a ezali perpendiculaire na c
Elingi koloba : kofungwama ya a na c esali 90°
Panzi oyo ya misato b babengaka yango : nzela-mokuse (hypothenuse)

5. Panzi-misato panzi mibale ekokana (triangle isocèle)
Panzi-misato panzi mibale ekokana ezali panzi-misato oyo ezali na mipanzi mibale ezali na molayi ndenge moko pe matumu mibale ekokana kofungwama.
Panzi a = Panzi c









6. Panzi-misato ekokana (triangle équilatéral)
Panzi-misato ekokana ezali panzi-misato oyo mipanzi na yango nyonso misato ezali na molayi ndenge moko pe matumu na yango nyonso misato ekokana kofungwama pe kofungwama yango ezali ya 60°.
Panzi a = Panzi b = Panzi c
 

7. Panzi-misato ekokana te (triangle scalène)
Panzi-misato ekokana te ezali panzi-misato oyo mipanzi na yango nyonso misato ekesana milayi pe matumu na yango nyonso misato ekesana kofungwama. Elingi koloba panzi na panzi ezali na molayi na yango moko pe litumu na litumu ezali na kofungwama na yango moko.
Panzi a ≠ Panzi b ≠ Panzi c

No comments :

Post a Comment